1 Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize :
2 Elize azongiselaki ye :
3 Elize alobaki :
5 Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta. 6 Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali :
8 Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia. 9 Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe. 10 Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
11 Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna. 12 Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize. 13 Elize alobaki na Geazi :
14 Elize atunaki mosali na ye, Geazi :
15 Elize alobaki :
16 Elize alobaki :
17 Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
18 Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma. 19 Alobaki na tata na ye :
20 Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki. 21 Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki. 22 Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye :
23 Mobali na ye atunaki :
24 Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
25 Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi :
27 Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki :
28 Mwasi ya Sunami alobaki :
29 Elize alobaki na Geazi :
30 Kasi mama ya mwana alobaki :
32 Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye. 33 Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe. 34 Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto. 35 Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso. 36 Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye :
37 Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.
38 Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »
39 Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente[a] mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini. 40 Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki :
42 Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje[b] oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye :
43 Mosali na ye atunaki :
44 Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe.
<- 2 Bakonzi 32 Bakonzi 5 ->