1 Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi. 2 Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati. 3 Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima ; kozela te ! »
4 Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi. 5 Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki :
6 Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. › 7 Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango. 8 Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi. 9 Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya. 10 Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. »
11 Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye :
12 Bakonzi ya basoda balobaki :
13 Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
14 Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri. 15 Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki : « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. »
16 Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.
17 Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! »
18 Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki :
19 Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki :
20 Mokengeli alobaki :
21 Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. »
23 Yorami abalukaki mpe akimaki ; abelelaki Akazia : « Akazia, bateki biso ! »
24 Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye. 25 Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye : 26 ‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
27 Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! »
30 Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda. 31 Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga :
32 Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki :