1 Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye ; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino. 2 Mokonzi atunaki Tsiba :
3 Bongo mokonzi atunaki lisusu :
4 Mokonzi alobaki na Tsiba :
5 Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe. 6 Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi. 7 Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba. 8 Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »
9 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi :
10 Kasi mokonzi alobaki :
11 Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo. 12 Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »
13 Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu. 14 Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna.
15 Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye. 16 Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye :
17 Abisalomi atunaki Ushayi :
18 Ushayi alobaki na Abisalomi :
20 Abisalomi alobaki na Ayitofeli :
21 Ayitofeli azongiselaki Abisalomi :
22 Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba. 23 Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.
<- 2 Samuele 152 Samuele 17 ->