1 Sima na biso kokabwana na bango, tokotaki na masuwa mpe tokendeki kino na esanga ya Kosi ; bongo mokolo oyo elandaki, tokendeki na Roda mpe, longwa wana, tokomaki na Patara. 2 Kuna, tomonaki masuwa moko oyo ezalaki kokende na Fenisi ; tomataki kati na yango mpe tokendeki. 3 Tango tomonaki esanga ya Shipre, totikaki yango na ngambo ya loboko ya mwasi mpe tokobaki mobembo na biso na mopanzi ya Siri. Totelemaki na Tiri epai wapi masuwa esengelaki kokitisa biloko oyo ememaki. 4 Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki elongo na bango mikolo sambo. Nzokande Molimo asololaki na Bayekoli, mpe balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te.
5 Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela. 6 Sima na kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango.
7 Tosukisaki mobembo na biso ya mayi, kolongwa na Tiri kino na Pitolemayisi epai wapi topesaki bandeko mbote mpe tovandaki elongo na bango mokolo moko. 8 Mokolo oyo elandaki, tokendeki na Sezarea mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi Sango Malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki. 9 Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola.
10 Lokola tovandaki wana mikolo ebele, mosakoli moko, kombo na ye ezalaki Agabisi, awutaki na Yuda 11 mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki :
12 Tango toyokaki maloba wana, biso mpe bandimi ya Sezarea tobondelaki Polo ete akende na Yelusalemi te. 13 Kasi Polo azongiselaki biso :
14 Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki :
15 Sima na biso kolekisa mikolo wana na Sezarea, tobongisaki biloko na biso mpe tokendeki na Yelusalemi. 16 Bayekoli mosusu ya Sezarea bakendeki kotika biso ; bamemaki biso na ndako ya Minaso, epai wapi tovandaki. Azalaki moto ya Shipre, mpe akomaki moyekoli wuta kala.
17 Tango tokomaki na Yelusalemi, bandeko bayambaki biso na esengo. 18 Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, mpe bakambi nyonso ya Lingomba bayaki kuna. 19 Sima na ye kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya lotomo na ye.
20 Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo :
26 Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Bongo akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo tango ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakobonza mbeka mpo na moko na moko kati na bango.
27 Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azia bamonaki Polo kati na lopango ya Tempelo. Batombokisaki ebele nyonso ya bato mpe bakangaki ye 28 na koganga :
29 Balobaki bongo mpo ete, liboso, bamonaki Polo elongo na Trofime, moto ya Efeso, kati na engumba mpe bakanisaki ete Polo akotisaki ye kati na Tempelo.
30 Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango. 31 Wana bazalaki koluka koboma Polo, sango ekomaki kino na matoyi ya mokonzi ya basoda ya Rome ete mobulu ekoti kati na Yelusalemi mobimba. 32 Mbala moko, azwaki basoda elongo na bakonzi na bango, mpe bakendeki na lombangu epai ebele ya bato bazalaki. Tango kaka bamonaki mokonzi ya basoda elongo na basoda na ye, batikaki kobeta Polo.
33 Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Bongo atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini. 34 Kati na ebele ya bato oyo batondaki wana, bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola te bosolo ya likambo, mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo kati na lopango ya basoda. 35 Tango Polo atiaki matambe na ye na binyatelo ya ematelo, basoda bakumbaki ye, mpo ete bato bazalaki kotia mobulu makasi. 36 Bato nyonso bazalaki kolanda ye na koganga :
37 Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda :
39 Polo azongisaki :
40 Sima na mokonzi ya basoda kopesa ye nzela, Polo atelemaki na binyatelo mpe atombolaki loboko. Bato batikaki makelele, mpe Polo akomaki koloba na bango na lokota ya Arami :
<- Misala ya Bantoma 20Misala ya Bantoma 22 ->