1 Nzokande, ezalaki na moto moko na kombo Ananiasi. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na Safira, mwasi na ye. 2 Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.
3 Boye, Petelo atunaki ye :
5 Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo. 6 Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango.
7 Sima na ngonga pene misato, mwasi ya Ananiasi akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalema.
8 Petelo atunaki ye :
9 Petelo alobaki na ye :
10 Kaka na tango yango, akweyaki liboso ya Petelo mpe akufaki. Boye tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendeki kokunda ye pembeni ya mobali na ye. 11 Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.
12 Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo. 13 Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi. 14 Nzokande, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango. 15 Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango. 16 Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zingazinga bazalaki kosangana na Yelusalemi ; bazalaki komema babeli na bango mpe bato oyo bazalaki kotungisama na milimo ya mbindo ; mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.
17 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa. 18 Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene. 19 Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :
21 Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko.
22 Kasi tango bakengeli bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bazongaki mpe balobaki :
24 Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.
25 Bongo moto moko ayaki koyebisa bango :
26 Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.
27 Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita-Monene, mpe mokonzi ya Banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna. 28 Alobaki :
29 Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki :
33 Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma. 34 Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke. 35 Alobaki na bango :
41 Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu. 42 Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.
<- Misala ya Bantoma 4Misala ya Bantoma 6 ->