31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ;
bango moko banguna na biso bayebi yango.
32 Bilanga na bango ya vino ewuti
na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore.
Bambuma na bango etondi na ngenge,
mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
33 Vino na bango ezali ngenge ya banyoka,
ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
34 « Boni, ebombami epai na Ngai te ?
Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ?
35 Ngai nde nazongisaka mabe na mabe,
Ngai nde nakofuta moto na moto.
Tango lokolo na bango ekobeta libaku,
na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu,
mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala
mpo na bango ekowumela te. »
36 Yawe akosambisa bato na Ye,
mpe akoyokela basali na Ye mawa ;
tango akomona ete makasi na bango esili,
mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te
oyo bakoki kokanga to kokangola.
37 Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ?
Wapi libanga epai wapi babombamaki ?
38 Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango
mpe komela makabo na bango ya vino ?
Tika ete etelema mpo na kosalisa bino
mpe kopesa bino ebombamelo !
39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ;
mosusu azali te !
Nabomaka mpe napesaka bomoi ;
nazokisaka mpe nabikisaka.
Mpe moto moko te akoki kokangola
oyo ezali na maboko na Ngai.
40 Natomboli loboko na Ngai na likolo,
mpe nalobi : Na Kombo na Ngai,
41 tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai,
mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa,
nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai,
mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato,
nakolangwisa makonga na Ngai na makila
ya bato oyo babomi, ya bakangami
mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
43 Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye !
Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ;
pamba te akozongisa mabe na mabe
mpo na makila ya basali na Ye,
akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye
mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu
mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
44 Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
45 Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele, 46 alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo. 47 Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
Yawe asakoli kufa ya Moyize
48 Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize : 49 « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango. 50 Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye, 51 pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele. 52 Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »