1 Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo. 2 Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
3 Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti. 4 Alobaki na bango :
5 Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami :
7 Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti. 8 Ayebisaki bango :
10 Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye :
12 Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka 13 mpe azongiselaki Efroni :
14 Efroni azongiselaki Abrayami :
16 Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
17 Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki 18 epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba. 19 Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. 20 Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.
<- Ebandeli 22Ebandeli 24 ->