1 Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi. 2 Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka. 3 Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.
4 Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela. 5 Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki :
6 Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki. 7 Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama.
8 Ezawu atunaki :
9 Kasi Ezawu azongisaki :
10 Jakobi alobaki :
12 Ezawu alobaki :
13 Kasi Jakobi azongiselaki ye :
15 Ezawu alobaki :
16 Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri. 17 Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye ; yango wana babengi esika yango Sukoti.
18 Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba. 19 Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo. 20 Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »
<- Ebandeli 32Ebandeli 34 ->