1 Tango Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. 2 Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, 3 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye. 4 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi :
11 Eliakimi, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi :
12 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki :
13 Boye, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : « Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! 14 Tala makambo oyo mokonzi alobi : Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino ! 15 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › 16 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye 17 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika ; mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino. 18 Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? 19 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? 20 Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »
21 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : « Bopesa ye eyano te ! »
22 Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.
<- Ezayi 35Ezayi 37 ->