1 Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »
2 Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo. 3 Nakendeki epai ya mwasi mosakoli ; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai : « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz. 4 Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
5 Yawe alobaki na ngai lisusu : 6 « Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia, 7 Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso. 8 Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »
11 Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo :
16 Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai. 17 Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye. 18 Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
19 Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? » 20 Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te. 21 Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe. 22 Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.
23 Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali ; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani.
<- Ezayi 7Ezayi 9 ->