1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia. 2 Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te. 3 Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali. 4 Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ; 5 pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »
6 Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye. 7 Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »
8 Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! »
9 Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te. 10 Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye : « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki ! » 11 Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki :
12 Manoa atunaki ye :
13 Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa :
15 Manoa alobaki na Anjelu na Yawe :
16 Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa :
18 Anjelu na Yawe azongiselaki ye :
19 Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa. 20 Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele. 21 Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe.
22 Manoa alobaki na mwasi na ye :
23 Kasi mwasi na ye azongisaki :
24 Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye. 25 Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.
<- Bilombe 12Bilombe 14 ->