1 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele. 2 Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. »
4 Elenge mobali ayebisaki bango :
5 Balobaki na ye :
6 Nganga-nzambe azongiselaki bango :
7 Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te. 8 Tango mibali mitano yango bazongaki na Tsorea mpe na Eshitaoli, bandeko na bango batunaki bango :
9 Bazongisaki :
11 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli. 12 Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani[a] ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi. 13 Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika. 14 Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »
15 Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote. 16 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, oyo bamilengelaki mpo na bitumba batelemaki na ekotelo ya ekuke. 17 Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba. 18 Tango mibali bakotaki na ndako ya Mika mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto, nganga-nzambe alobaki na bango :
19 Bazongisaki :
20 Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu ; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani. 21 Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo. 22 Tango bakomaki mwa mosika na ndako ya Mika, Mika mpe bato oyo bazalaki pene ya ndako na ye batelemaki na koganga mpe balandaki libota ya Dani. 23 Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika :
24 Mika azongisaki :
25 Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye :
26 Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye. 27 Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye.
-
a Maane Dani, na lokota ya Ba-Ebre : Maani Dani elingi koloba : Molako ya libota ya Dani.