1 Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe. 2 Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi. 3 Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
4 Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele. 5 Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama. 6 Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye :
8 Baraki azongiselaki Debora :
9 Debora alobaki na ye :
11 Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.
12 Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori, 13 Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni. 14 Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. »
17 Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni. 18 Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye :
21 Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto ; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele ; mpe Sisera akufaki.
22 Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. »
23 Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana. 24 Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.
<- Bilombe 3Bilombe 5 ->