1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani. 2 Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba. 3 Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele. 4 Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te. 5 Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.
6 Bato ya Madiani bakomisaki bana ya Isalaele babola makasi. Boye, bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo ete asunga bango. 7 Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani, 8 Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu. 9 Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango. 10 Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »
11 Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani. 12 Anjelu ya Yawe abimelaki Jedeon mpe alobaki na ye :
13 Jedeon azongisaki :
14 Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki :
15 Jedeon azongisaki :
16 Yawe alobaki na ye :
17 Jedeon alobaki :
19 Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.
20 Anjelu na Nzambe alobaki na ye :
21 Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye. 22 Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki : « Nkolo Yawe, mawa na ngai ! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »
23 Kasi Yawe alobaki na ye :
24 Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri. 25 Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon :
27 Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te. 28 Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami ; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika. 29 Balobanaki : « Nani asali makambo ya boye ? »
31 Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye :
32 Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.
33 Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli. 34 Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye. 35 Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.
36 Jedeon alobaki na Nzambe : « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai, 37 nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. » 38 Mpe esalemaki bongo. Mokolo oyo elandaki, Jedeon alamukaki na tongo-tongo, akamolaki bapwale, ebimisaki mayi mpe etondisaki sani mobimba.
39 Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe : « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. »
40 Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango : bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe.
<- Bilombe 5Bilombe 7 ->