1 Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon :
2 Kasi Jedeon azongiselaki bango :
4 Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani. 5 Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka :
6 Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye :
7 Jedeon alobaki :
8 Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
9 Jedeon alobaki na bato ya Penueli : « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. »
10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki. 11 Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia. 12 Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi. 14 Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba. 15 Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »
16 Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube. 17 Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba.
18 Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna :
19 Jedeon alobaki na bango lisusu :
20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo. 21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
22 Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon :
23 Kasi Jedeon alobaki na bango :
24 Jedeon abakisaki :
25 Bana ya Isalaele bazongisaki :
28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei. 29 Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna. 30 Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele. 31 Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »
32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
33 Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango. 34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. 35 Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.
<- Bilombe 7Bilombe 9 ->