1 « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe. 2 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe, 3 « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele. 4 Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.
7 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › 8 kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
9 Na tina na basakoli :
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli :
16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
25 « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! › 26 Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango ? 27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ? 28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ; 29 « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe.
30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ; 31 « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe, 32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? ›
34 Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu. 35 Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye : ‹ Eyano nini Yawe apesi ? Yawe alobi nini ? › 36 Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso ! 37 Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? › 38 Nzokande, soki bolobi lisusu : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola bosalelaka maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino : ‹ Boloba te : Tala liloba oyo Yawe alobi ! › 39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ; 40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »
<- Jeremi 22Jeremi 24 ->