1 Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase ; 2 mpe alobaki na bango : « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino. 3 Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino. 4 Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani. 5 Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
6 Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango. 7 Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango. 8 Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »
9 Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
10 Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani. 11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele, 12 lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.
13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. 14 Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.
15 Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :
21 Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele :
30 Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo. 31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase :
32 Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki. 33 Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.
34 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba : Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.
<- Jozue 21Jozue 23 ->