11
1 Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.
Yesu mpe Yoane Mobatisi
(Lk 7.18-35)
2 Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye 3 kotuna epai ya Yesu :
— Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?
4 Yesu azongiselaki bango :
7 Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango :
11 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene. 12 Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna. 13 Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane. 14 Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya. 15 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
16 Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :
17 « Tobetaki baflite,
18 Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! » 19 Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.
Yesu apameli bingumba oyo eboyaki kondima
(Mat 10.15; Lk 10.12-15)
20 Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te. 21 Alobaki :
23 Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo. 24 Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.
Yesu abengi bato na mikumba
(Lk 10.21-22)
25 Kaka na tango yango, Yesu alobaki :
27 Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
28 Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. 29 Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. 30 Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
<- Matayo 10Matayo 12 ->